9 Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
Akabi azongiselaki ye : — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye : « Tekela ngai elanga na yo ya vino ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai : « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. »
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !
Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.
Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.
kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.
Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
Toyebi lisusu ete mibeko esalema te mpo na bato ya malamu kasi mpo na bato mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe batioli makambo ya bule, ba-oyo bakoki ata koboma tata mpe mama, mpo na babomi ya bato,
Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.
Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.