Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 6:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. Elize alobaki na bango : — Bokende !


Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.


Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.


Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.


Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.


totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te ;


Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.


Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.


Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai ; mpe kokufa ezali litomba.


pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.


Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ