Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.
Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,
Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele.
mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,
Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.