Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 6:11
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki : — Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !


Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.


Mokonzi atunaki : — Kunda oyo nazali komona ezali ya nani ? Bato ya engumba bazongisaki : — Ezali kunda ya moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda mpe asakolaki makambo oyo owuti kosala na etumbelo ya Beteli.


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.


Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.


Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.


mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.


Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.


Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.


Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.


« Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe ! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.


Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.


Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.


Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.


Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.


Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.


Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.


Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko,


mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.


Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.


asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu, koluka kimia mpe kokoba na yango,


Mokolo moko, moto moko na Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, namimonisaki te na polele epai ya libota ya tata na yo tango bazalaki na Ejipito, na se ya bokonzi ya Faraon ?


Mosali azongisaki : — Zela moke ! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe ; azali penza moto ya lokumu ; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ