9 Mpo ete mwasi atangama na molongo ya basi bakufisa mibali, oyo Lingomba azali na mokumba ya kosunga, asengeli kozala na mibu tuku motoba ya mbotama to koleka, kozala mwasi ya makangu te,
Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali ; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,
Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
Soki, kati na Lingomba, ezali na mwasi mondimi oyo, kati na libota na ye, azali na basi bakufisa mibali, tika ete asunga bango ; mpe tika ete Lingomba emema mokumba na bango te mpo ete ekoka kosunga basi bakufisa mibali, oyo basengeli penza na lisungi mpo ete bakelela.