Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi mwasi akufisa mobali, oyo amipesaka na bisengo azali ya kokufa atako azali na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 5:6
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »


Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge akosuka na kokomisa ye moto makasi.


Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! Bozalaki koloba : « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »


Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »


Nakobebisa Siona, mboka kitoko, oyo ezali penza kitoko lokola elenge mwasi ya kitoko mpe ya nzoto sembesembe.


Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala ; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.


pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.


Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.


Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,


atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.


Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi,


Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,


Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto,


Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »


Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ