Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 5:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.


Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo.


Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, na esika oyo avandaka.


Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye :


Nakotelemela bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakolongola kombo ya Babiloni mpe nyonso oyo ekotikala, bana mpe bakitani na yango, elobi Yawe.


Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.


Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,


Soki, kati na Lingomba, ezali na mwasi mondimi oyo, kati na libota na ye, azali na basi bakufisa mibali, tika ete asunga bango ; mpe tika ete Lingomba emema mokumba na bango te mpo ete ekoka kosunga basi bakufisa mibali, oyo basengeli penza na lisungi mpo ete bakelela.


Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.


Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.


Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye.


Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ