Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Pamba te Makomi elobi : « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma, » mpe « mosali asengeli na lifuti na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 5:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.


Makomi eloba : « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »


Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele :


Makomi elobi nini ? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »


Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »


Ndenge moko mpe, Nkolo apesaki mitindo ete bato oyo bateyaka Sango Malamu babika bomoi na bango na nzela ya Sango Malamu.


Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. »


Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ