Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali ; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 5:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,


Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.


Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.


Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.


mpe, likolo na yango, bakomema ngambo mpo ete balongisi te ekateli na bango ya liboso.


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


Mpo ete mwasi atangama na molongo ya basi bakufisa mibali, oyo Lingomba azali na mokumba ya kosunga, asengeli kozala na mibu tuku motoba ya mbotama to koleka, kozala mwasi ya makangu te,


Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.


Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ