6 Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.
Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.
Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,
Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »
Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.
Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.
Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ;
Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,
mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,
Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.
Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.