Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 4:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.


Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.


Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.


Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »


Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.


Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


Ezali na kondima nde tososolaka ete mokili esalemaki na nzela ya Liloba na Nzambe, mpe ete biloko oyo emonanaka esalemaki na nzela ya biloko oyo emonanaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ