Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 4:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 4:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.


Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.


Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.


Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.


Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.


Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.


Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,


Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso.


Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.


Kondimaka te maloba ya moto oyo ayei ye moko kofunda mokambi ya Lingomba epai na yo ; okondima ye kaka soki ayei elongo na bato mibale to misato lokola batatoli mpo na kolendisa bosolo ya likambo yango.


Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.


Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele.


Yango wana nazali kolendisa yo ete olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natiaki yo maboko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ