Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 3:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »


Kornei elongo na bato nyonso ya libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya Nzambe mpe kotosa Nzambe ; azalaki kosunga bato oyo bazalaki kati na bosenga ya ndenge na ndenge mpe kosambela Nzambe tango nyonso.


Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.


Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.


Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye.


Mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moboti ya malamu ; mpe bana na ye basengeli kozala bandimi, bana ya mobulu te mpe ya kilikili te.


Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.


Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu ; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ