13 Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.
Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.
Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.