1 Timote 3:11 - Mokanda na Bomoi11 Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto ; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.