Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo : « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango ! » Mpe : « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! »
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.
Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.
Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;