13 Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.
Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe ; akelaki bango mobali mpe mwasi.
Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.