Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 2:10 - Mokanda na Bomoi

10 kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 2:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alataka lokola elamba : molende na mosala mpe lokumu ; mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.


Bopesa ye bambuma ya misala na ye ! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka !


Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.


Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango ; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi.


Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini ? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe


Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo ; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ