1 Timote 1:3 - Mokanda na Bomoi3 Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.