Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Timote 1:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kati na bango, ezali na Imene mpe Alekizandre, ba-oyo nakabi na maboko ya Satana mpo ete bayeba ete basengeli te kofinga Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Timote 1:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.


Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.


Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.


Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.


Lisusu, tomilengeli mpo na kopesa bozangi botosi nyonso etumbu, tango kaka botosi na bino ekokoka.


Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.


Bozwa ye lokola monguna te, kasi bopamela ye lokola ndeko.


Likambo ya pasi ezali ete mingi kati na bango basili kobunga nzela mpo na kolanda Satana.


Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.


Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete


bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu ; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule,


Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana : « Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo, mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.


Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ