18 Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto ; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese.
Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko ? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te ? Nani abatelaka etonga mpo amela miliki na yango te ?
Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye.
Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !
epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !