Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.
Mosali azongisaki : — Zela moke ! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe ; azali penza moto ya lokumu ; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.