Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Saulo alobaki na mosali na ye : — Likambo te ! Tokende epai na ye ! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe ? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te ; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 9:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mokonzi alobaki na moto na Nzambe : — Tokende na ndako mpo ete ozwa eloko ya kolia mpe napesa yo kado.


Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.


Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !


Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.


Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.


mokonzi alobaki na Azaeli : « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe : ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo ? › »


Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? »


Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.


Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki : — Nakozela kino okozonga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ