Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mokolo moko, ba-ane ya tata na ye, Kishi, ebungaki ; mpe Kishi alobaki na mwana na ye, Saulo : « Kamata mosali moko ya mobali kati na basali mpo ete akende elongo na yo koluka ba-ane. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 9:3
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »


Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa !


Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : — Bokendeki wapi ? Saulo azongisaki : — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.


Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › »


Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.


Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.


Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha ; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te ; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ