Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 9:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bongo balongwaki nzela moko na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kokita na engumba, mpe Samuele asololaki na Saulo, na veranda ya ndako na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 9:25
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.


Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete ; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi.


Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »


Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.


tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,


Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.


Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.


Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye : « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ