22 Samuele amemaki Saulo elongo na mosali na ye, akotisaki bango na esika ya feti mpe avandisaki bango liboso ya babengami : bazalaki bato pene tuku misato.
Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito.
Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo : ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu ! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?