Samuele azongiselaki Saulo : — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba ; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo.