1 Samuele 9:17 - Mokanda na Bomoi17 Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye : « Tala moto oyo nalobelaki yo ; ye nde akokonza bato na Ngai. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.
Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;