Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.
Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.
Boye bakendeki na engumba ; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba.