Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia ; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te : asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 9:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te.


Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.


Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.


Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.


Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.


Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato.


Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.


Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe.


Soki naliaka na kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpo na nini kopamela ngai na tina na oyo, ngai, nazongiselaka matondi epai ya Nzambe ?


Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


Boye bakendeki na engumba ; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ