Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 9:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye.


Kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi, ezalaki na Moyuda moko ya libota ya Benjame ; kombo na ye ezalaki « Maridoshe. » Maridoshe azalaki mwana mobali ya Yairi, mwana mobali ya Shimei, mwana mobali ya Kishi.


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Bongo, basengaki mokonzi, mpe Nzambe apesaki bango Saulo, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi.


Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato ; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi.


Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli.


Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ