Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?
‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te.
Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai.
Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango.