Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba : ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›
Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.
Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.
Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.