Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 8:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango ; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.


Bongo, basengaki mokonzi, mpe Nzambe apesaki bango Saulo, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi.


Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon : — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.


Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »


Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino.


Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble ? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi.


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ