Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 8:3 - Mokanda na Bomoi

3 kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 8:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi azalaki kobakisa : — Ah ! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango !


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


oyo maboko na bango etondi na makila, mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.


Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi.


Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.


Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.


molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,


Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ