Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 8:20 - Mokanda na Bomoi

20 Na bongo, biso mpe tokozala lokola bikolo mosusu. Mokonzi na biso akokamba biso, akobima liboso na biso mpe akotambolisa biso na bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 8:20
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi basanganaki elongo na bapagano mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.


Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.


Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango ; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.


Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.


mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.


Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ