Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 8:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bongo na mokolo wana, tango bokobanda kolelalela mpo na mokonzi oyo bino moko bokomiponela, na mokolo yango, Yawe akoyanola bino ata moke te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 8:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »


Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye ?


Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye tango pasi ekomelaki ye ?


Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.


Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.


Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.


Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka !


Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.


Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »


Yango wana, tango bakobelela Yawe, akoyanola bango te. Na tango wana, akobombela bango elongi na Ye likolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki.


Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »


Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ