— Tata na yo anyokolaki biso makasi ; kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo.
Abrayami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. Kombo ya Melishisedeki elakisi « mokonzi ya bosembo. » Azali lisusu mokonzi ya Salemi ; elingi koloba : mokonzi ya kimia.
Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki : « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba ? Ngai nazali moto ya Filisitia te ? Mpe bino bozali basali ya Saulo te ? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai.
Bongo, kati na basali na bino ya mibali, basali na bino ya basi, bilenge na bino mpe ba-ane na bino, akokamata ba-oyo baleki kitoko mpo na misala na ye.