13 Akokamata bana na bino ya basi mpo ete basalaka malasi, balambaka bilei mpe mapa.
Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.
Akokamata bilanga na bino ya vino mpe ya olive oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango epai ya basali na ye.