Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.
Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »
Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.