Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 7:6
47 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babengaki yango lisusu Mitsipa ; pamba te Labani alobaki lisusu : « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te.


Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.


mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›


Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.


Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei.


Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo ; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango ; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.


Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.


Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.


Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.


« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.


Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?


Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te ! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo ?


Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.


Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›


Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.


Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te,


Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu !


Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango


Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.


« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »


Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te,


Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,


Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.


Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe : — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala.


Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !


Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Ana azongisaki : — Te, nkolo na ngai ! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi ; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe.


Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


Samuele akambaki Isalaele mikolo nyonso ya bomoi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ