Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 7:14
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.


Babebisaki te bikolo oyo Yawe ayebisaki bango,


Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.


Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.


Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.


Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ