Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bazongisaki : — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu ; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 6:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.


Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali. Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba.


Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.


mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.


Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. ›


Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba :


Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.


Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye ; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.


Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.


Bokamata Sanduku ya Yawe mpe botia yango na likolo ya shario. Pembeni ya Sanduku ya Yawe, botia kati na mwa sanduku moko ya moke biloko ya wolo oyo bokobonzela Yawe lokola bambeka mpo na masumu. Sima, botika yango kokende.


Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ