Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.
Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye ; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.