Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe ? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 6:2
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.


Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.


Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.


Mokonzi abengisaki bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe mpo ete bayebisa ye ndoto oyo alotaki. Tango bayaki, batelemaki liboso ya mokonzi ;


Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.


Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; atunaki bango : — Klisto asengeli kobotama wapi ?


Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.


Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ