1 Samuele 6:17 - Mokanda na Bomoi17 Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato ya Filisitia batunaki : — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? Bazongisaki : — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.