1 Samuele 6:16 - Mokanda na Bomoi16 Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »
Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.
Bato ya Filisitia batunaki : — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? Bazongisaki : — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.