1 Samuele 6:14 - Mokanda na Bomoi14 Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.
Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela : kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.