Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario ; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 6:11
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika.


Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi. Uza mpe Ayiyo nde bazalaki kotambolisa shario yango.


Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.


Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.


Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.


Bato ya Filisitia batunaki : — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? Bazongisaki : — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ