10 Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.
Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki : — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki : — Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »
Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario ; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu.
Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.